00:00:11
Mangomba mingi eteyaka ete eteni mosusu ya nzoto ya moto
etikalaka na bomoi nsima ya liwa.00:00:17
00:00:18
Kasi Biblia eteyaka nini?00:00:20
00:00:20
Nzambe akelaki Adama, moto ya liboso na putulu ya mabele. 00:00:24
00:00:25
Apesaki ye libaku ya kozala na bomoi libela. 00:00:28
00:00:28
Kasi ntango aboyaki kotosa Nzambe na nko, 00:00:31
00:00:31
Nzambe ayebisaki ye ete akozonga putulu; 00:00:34
00:00:34
elingi koloba akozala lisusu te.00:00:37
00:00:38
Tokoloba nini mpo na baoyo bazali kokufa nsima ya Adama?00:00:41
00:00:42
Ntango bayebisaki Yesu ete moninga na ye Lazare akufi, 00:00:46
00:00:46
Yesu alobaki te ete Lazare akei likoló. 00:00:48
00:00:48
Kutu, alobaki: 00:00:50
00:00:50
‘Moninga na biso akei kolala.’ 00:00:52
00:00:53
Alingaki koloba nini?00:00:55
00:00:59
Kaka ndenge moto oyo alali mpɔngi makasi asalaka mosala te 00:01:03
00:01:03
mpe ayebaka te makambo oyo ezali koleka pene na ye, 00:01:06
00:01:06
bakufi mpe bayebaka ata eloko te.00:01:09
00:01:11
Lisusu, kaka ndenge bakoki kolamwisa moto oyo alali mpɔngi makasi, 00:01:16
00:01:16
Biblia elobi mpe ete moto akoki kolamuka na mpɔngi ya liwa.00:01:20
00:01:21
Yango nde Yesu asalaki epai ya moninga na ye Lazare.00:01:25
00:01:29
Lazare asalaki mikolo minei na lilita. 00:01:32
00:01:33
Soki eteni mosusu ya nzoto ya Lazare ekobaki
kozala na bomoi nsima ya liwa na ye 00:01:37
00:01:37
mpe ekendaki na likoló, 00:01:39
00:01:39
Yesu alingaki nde kozwa ye na likoló 00:01:41
00:01:41
mpe kotinda ye na makasi ete
azonga lisusu na bomoi awa na mabele? 00:01:45
00:01:46
Te. Lazare alalaki na kati ya nkunda. 00:01:49
00:01:49
Yesu azongisaki ye na bomoi mpe Lazare azongaki na libota na ye.00:01:53
00:01:55
Biblia elobeli ntango oyo bato mingi oyo bakufá
bakosekwa kaka ndenge Lazare asekwaki.00:02:01
00:02:03
Yesu alobelaki elikya wana kitoko; 00:02:05
00:02:05
alobaki boye: 00:02:06
00:02:07
“Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi.”00:02:12
00:02:14
Okoki komituna: 00:02:15
00:02:15
‘Banani bakosekwa? 00:02:17
00:02:17
Mpe lisekwa emonisi nini mpo na Yehova Nzambe?’00:02:21
00:02:21
Biyano na mituna yango ezali na liteya 6 ya buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe!00:02:27
00:02:27
Okoki kozwa yango na site Internet na biso jw.org 00:02:31
00:02:33
Batatoli ya Yehova bakosepela koyekola na yo Biblia.00:02:36
00:02:36
Tondisá lokasa ya kosɛnga boyekoli na jw.org, 00:02:40
00:02:40
mpe Motatoli ya Yehova moko ya esika ofandi 00:02:42
00:02:42
akoya koyekola na yo Biblia na ngonga mpe na esika oyo olingi.00:02:54
Moto akómaka ndenge nini soki akufi?
-
Moto akómaka ndenge nini soki akufi?
Mangomba mingi eteyaka ete eteni mosusu ya nzoto ya moto
etikalaka na bomoi nsima ya liwa.
Kasi Biblia eteyaka nini?
Nzambe akelaki Adama, moto ya liboso na putulu ya mabele.
Apesaki ye libaku ya kozala na bomoi libela.
Kasi ntango aboyaki kotosa Nzambe na nko,
Nzambe ayebisaki ye ete akozonga putulu;
elingi koloba akozala lisusu te.
Tokoloba nini mpo na baoyo bazali kokufa nsima ya Adama?
Ntango bayebisaki Yesu ete moninga na ye Lazare akufi,
Yesu alobaki te ete Lazare akei likoló.
Kutu, alobaki:
‘Moninga na biso akei kolala.’
Alingaki koloba nini?
Kaka ndenge moto oyo alali mpɔngi makasi asalaka mosala te
mpe ayebaka te makambo oyo ezali koleka pene na ye,
bakufi mpe bayebaka ata eloko te.
Lisusu, kaka ndenge bakoki kolamwisa moto oyo alali mpɔngi makasi,
Biblia elobi mpe ete moto akoki kolamuka na mpɔngi ya liwa.
Yango nde Yesu asalaki epai ya moninga na ye Lazare.
Lazare asalaki mikolo minei na lilita.
Soki eteni mosusu ya nzoto ya Lazare ekobaki
kozala na bomoi nsima ya liwa na ye
mpe ekendaki na likoló,
Yesu alingaki nde kozwa ye na likoló
mpe kotinda ye na makasi ete
azonga lisusu na bomoi awa na mabele?
Te. Lazare alalaki na kati ya nkunda.
Yesu azongisaki ye na bomoi mpe Lazare azongaki na libota na ye.
Biblia elobeli ntango oyo bato mingi oyo bakufá
bakosekwa kaka ndenge Lazare asekwaki.
Yesu alobelaki elikya wana kitoko;
alobaki boye:
“Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi.”
Okoki komituna:
‘Banani bakosekwa?
Mpe lisekwa emonisi nini mpo na Yehova Nzambe?’
Biyano na mituna yango ezali na liteya 6 ya buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
Okoki kozwa yango na site Internet na biso jw.org
Batatoli ya Yehova bakosepela koyekola na yo Biblia.
Tondisá lokasa ya kosɛnga boyekoli na jw.org,
mpe Motatoli ya Yehova moko ya esika ofandi
akoya koyekola na yo Biblia na ngonga mpe na esika oyo olingi.
-