00:00:13
Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?00:00:16
00:00:18
Yehova Nzambe alingaki te ete bato bányokwamaka. 00:00:22
00:00:23
Kutu, apesaki Adama ná Eva
bomoi ya malamu na ebandeli.00:00:28
00:00:32
Kasi Satana, anzelu moko motomboki,
alobaki ete Nzambe azali moto ya lokuta00:00:37
00:00:37
mpe atindaki Adama ná Eva bátombokela bokonzi ya Nzambe.00:00:41
00:00:42
Ntango Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe,00:00:45
00:00:45
bamityaki na ngámbo ya Satana. 00:00:47
00:00:47
Batombokelaki Yehova mpe bandimaki bango moko
bákata nini ezali mabe mpe nini ezali malamu.00:00:53
00:00:56
Satana alobaki solo? 00:00:58
00:00:58
Bato bakoki komiyangela malamu kozanga litambwisi ya Nzambe? 00:01:02
00:01:02
Esengelaki ntango eleka mpo na kopesa eyano ya malamu
na motuna ya ntina mingi oyo batomboki yango babimisaki.00:01:09
00:01:10
Tózwa ndakisa moko:00:01:11
00:01:11
Mwana-kelasi moko ya mayele mpe motó makasi 00:01:14
00:01:14
alobi ete ndenge molakisi az’oteya bango eza mabe. 00:01:18
00:01:18
Mwana yango aza ntango nyonso koloba ete ye ayebi
ndenge ya malamu mpenza ya kozwa eyano na motuna yango.00:01:23
00:01:23
Bana mosusu bakanisi ete alobi solo,00:01:26
00:01:26
bango mpe bakómi mitó makasi.00:01:28
00:01:29
Molakisi asengeli kosala nini? 00:01:32
00:01:32
Azali na bokonzi ya kobimisa bana ya mitó makasi yango libándá. 00:01:35
00:01:35
Kasi, bana oyo batikali bakokanisa nini? 00:01:38
00:01:38
Bakoki kolongola limemya oyo bazali kopesa molakisi,00:01:41
00:01:41
kokanisa ete azali kobanga noki ete bana wana bámonisa polele ete ayebi eloko te.00:01:46
00:01:47
Sikoyo kanisá ete molakisi apesi mwana wana nzela alakisa baninga na ye 00:01:50
00:01:50
ndenge oyo ye akosala mpo na kozwa eyano na motuna wana. 00:01:54
00:01:55
Yango ekosala ete bana-kelasi nyonso bámona ete 00:01:57
00:01:57
ebongi kaka molakisi nde ateya bango.00:02:00
00:02:07
Yehova asalaki mpe lokola molakisi wana. 00:02:10
00:02:11
Ntango Satana abɛtɛlaki Yehova ntembe, 00:02:14
00:02:14
bamilio ya baanzelu bazalaki kolanda. 00:02:17
00:02:17
Ndenge oyo Yehova akosilisa botomboki yango00:02:20
00:02:20
ekoteya baanzelu nyonso wana mpe na nsima
bikelamu nyonso ya mayele.00:02:26
00:02:26
Yango wana, Yehova atikaki Satana ayangela mokili mpo na mwa ntango.00:02:31
00:02:32
Boyangeli ya Satana ebimiselá bato bampasi mpe minyoko. 00:02:36
00:02:38
Yango emonisi ete kaka Yehova nde azali na lotomo mpe makoki ya koyangela,00:02:44
00:02:44
akolongola bampasi nyonso oyo botomboki ya Satana ebimiselá bato.00:02:49
00:02:50
Na ntango yango, kaka bato oyo baponi kotosa mitinda ya Yehova
nde bakofanda awa na mabele.00:02:57
00:02:58
Kasi liboso ntango yango ekóma,00:03:01
00:03:01
motema molai ya Nzambe epesi biso libaku nini? 00:03:04
00:03:04
Ndenge nini tokoki kopona Nzambe azala Moyangeli na biso?00:03:08
00:03:09
Liteya 8 ya mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! 00:03:12
00:03:12
epesi biyano na mituna wana mpe mituna mosusu. 00:03:16
00:03:17
Okoki kozwa mwa buku yango na jw.org.00:03:21
00:03:21
Batatoli ya Yehova bakosepela koyekola na yo Biblia. 00:03:25
00:03:25
Sɛngá boyekoli ya Biblia na nzela ya Internet,00:03:28
00:03:28
mpe Motatoli moko ya mboka na bino akoya kosolola na yo00:03:32
00:03:32
na ngonga mpe na esika oyo okopona.00:03:45
Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?
-
Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?
Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?
Yehova Nzambe alingaki te ete bato bányokwamaka.
Kutu, apesaki Adama ná Eva
bomoi ya malamu na ebandeli.
Kasi Satana, anzelu moko motomboki,
alobaki ete Nzambe azali moto ya lokuta
mpe atindaki Adama ná Eva bátombokela bokonzi ya Nzambe.
Ntango Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe,
bamityaki na ngámbo ya Satana.
Batombokelaki Yehova mpe bandimaki bango moko
bákata nini ezali mabe mpe nini ezali malamu.
Satana alobaki solo?
Bato bakoki komiyangela malamu kozanga litambwisi ya Nzambe?
Esengelaki ntango eleka mpo na kopesa eyano ya malamu
na motuna ya ntina mingi oyo batomboki yango babimisaki.
Tózwa ndakisa moko:
Mwana-kelasi moko ya mayele mpe motó makasi
alobi ete ndenge molakisi az’oteya bango eza mabe.
Mwana yango aza ntango nyonso koloba ete ye ayebi
ndenge ya malamu mpenza ya kozwa eyano na motuna yango.
Bana mosusu bakanisi ete alobi solo,
bango mpe bakómi mitó makasi.
Molakisi asengeli kosala nini?
Azali na bokonzi ya kobimisa bana ya mitó makasi yango libándá.
Kasi, bana oyo batikali bakokanisa nini?
Bakoki kolongola limemya oyo bazali kopesa molakisi,
kokanisa ete azali kobanga noki ete bana wana bámonisa polele ete ayebi eloko te.
Sikoyo kanisá ete molakisi apesi mwana wana nzela alakisa baninga na ye
ndenge oyo ye akosala mpo na kozwa eyano na motuna wana.
Yango ekosala ete bana-kelasi nyonso bámona ete
ebongi kaka molakisi nde ateya bango.
Yehova asalaki mpe lokola molakisi wana.
Ntango Satana abɛtɛlaki Yehova ntembe,
bamilio ya baanzelu bazalaki kolanda.
Ndenge oyo Yehova akosilisa botomboki yango
ekoteya baanzelu nyonso wana mpe na nsima
bikelamu nyonso ya mayele.
Yango wana, Yehova atikaki Satana ayangela mokili mpo na mwa ntango.
Boyangeli ya Satana ebimiselá bato bampasi mpe minyoko.
Yango emonisi ete kaka Yehova nde azali na lotomo mpe makoki ya koyangela,
akolongola bampasi nyonso oyo botomboki ya Satana ebimiselá bato.
Na ntango yango, kaka bato oyo baponi kotosa mitinda ya Yehova
nde bakofanda awa na mabele.
Kasi liboso ntango yango ekóma,
motema molai ya Nzambe epesi biso libaku nini?
Ndenge nini tokoki kopona Nzambe azala Moyangeli na biso?
Liteya 8 ya mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
epesi biyano na mituna wana mpe mituna mosusu.
Okoki kozwa mwa buku yango na jw.org.
Batatoli ya Yehova bakosepela koyekola na yo Biblia.
Sɛngá boyekoli ya Biblia na nzela ya Internet,
mpe Motatoli moko ya mboka na bino akoya kosolola na yo
na ngonga mpe na esika oyo okopona.
-