JW subtitle extractor

Mpo na nini koyekola Biblia?

Video Other languages Share text Share link Show times

Mpo na nini koyekola Biblia?
Lelo oyo, bato bayebi makambo mingi oyo bayebaki liboso te.
Kasi, bazwi naino biyano te
na mituna oyo tomitunaka mpo na bomoi:
Toutá wapi?
Mpo na nini mpasi etondi na mokili?
Mpo na nini bato bakufaka?
Bandimi ya mangomba mingi bakanisaka ete
Nzambe moto ayangelaka mokili oyo.
Kasi yango ezali solo te.
Mokili oyo ezali kobeba se kobeba!
Oyo Biblia elobi mpo na yango ekoki kokamwisa yo.
Biblia ezali kosalisa bamilio ya bato na mokili mobimba
bázwa biyano na mituna oyo bamitunaka mpo na bomoi.
Okosepela koyeba biyano yango?
Batatoli ya Yehova bakosepela koyekola na yo Biblia.
Okoki kotinda nkombo mpe adrɛsi na yo
na nzela ya Internet,
na jw.org to kotuna Motatoli ya Yehova moko mpo
oyeba ndenge toyekolaka na bato Biblia ofele.